Bato ya Mangala, bakomi motuya boni na mokili ?

Mbanza-NgunguLingala elobamaka na Kongo-Kinshasa, Kongo-Mfoa (Kongo-Brazzaville) pe Angola. Lingala ewuti na bituka ya mitio (Nord) pe eyei kozwa nguya makasi na bingumba ya Kinshasa pe Mfoa.

Na moyi ya lelo, bato balobaka Lingala bazali motuya boni?

Bato ya mindule pe ya maboke bazwi yango lokola monoko na bango ya kosanela. Lelo oyo Lingala epanzani na Kongo mobimba, ezali pasi okoma na engumba moko okuta moto azangi koyeba Lingala.

Tokoluka komeka koyeba motuya ya bato balobala Lingala na moyi ya lelo. Lokola botangi bato ekopesa biso nzela ya koyeba te nani alobaka nini, tokimeka koyeba motuya yango uta na bizaleli ya engumba to mboka moko-moko.

Na moyi ya lelo tokoki koloba ete : pene na bato 70 000 000 balobaka Lingala. Lelo oyo, motuya ya bato oyo balobaka Mangala ezali se kobuta.  Tokoki kokabola bato ya mangala na maboke minei :

  1. bato oyo Lingala ezali monoko ya liboso balobaka
  2. bato oyo Lingala ezali monoko ya mibale balobaka
  3. bato oyo Lingala ezali monoko ya misato balobaka
  4. bato oyo bayebi Lingala

Bato oyo Lingala ezali monoko ya liboso balobaka

Lelo oyo Kinshasa mobimba, ezala bato babotami na Kinshasa, ezala bato bawuti bamboka misusu ya Kongo pe batondisi Kinshasa, bango nyonso basololaka se na Lingala. Na boye, tokoki koloba ete balobi Lingala na Kinshasa bazali pene na motuya bifuku zomi (10 millions).

Na bingumba ya mitio, ezala bingumba ya mike lokola Bolobo, Lukolela, Gemena to pe na bingumba minene lokola Mbandaka pe Kisangani, bato balobaka Lingala lokola monoko ya liboso. Na sima basalelaka minoko na bango ya mboka, soki bakutani bato ya ekolo moko. tokoki kotanga bato pene na bilundu minei (4 millions).

Na Mfoa (Brazzaville) ezali na bato pene na efuku moko na ndambo (1,5 millions). Koleka kati-kati, balobaka Lingala lokola monoko na bango ya liboso pe oyo etikali balobaka yango lokola monoko ya mibale.  Toloba ete bazali pene na bilundu mwambe (800 mille).

Na boye tokoki koloba ete bato oyo Lingala ezali monoko na bango ya liboso, Bazali pene na motuya moko na ndelo ya mwambe na bifuku mitano (15 millions).

Bato oyo Lingala ezali monoko ya mibale balobaka

Na bingumba ya ngele (Sud) lokola Pointe-Noire, Matadi, Boma, Kikwit, Bandundu kuna Lingala elobaka bo monoko ya mibale na sima ya Kituba (Kikongo ya Leta). Tokoki kotanga bato na bifuku mibale (2 millions)

Na bingumba ya monyele (Est), ezala na bituka ya minene lokola Lubumbashi, Bukavu, Goma to pe bingumba ya mike lokola Bunia, Beni, Likasi, Kolwezi, kuna kiswahili nde elobamaka lokola monoko ya liboso pe Lingala elobamaka lokola monoko ya mibale. Tokoki kotanga bato pene na bifuku mitano (5 millions)

Na bituka ya Kasayi, na bingumba minene (Mbuji-Mayi pe kananga) to bingumba ya mike lokola Tshikapa, Tshiluba nde elobamaka lokola monoko ya liboso pe Lingala monoko ya mibale. Tokoki kotanga bato pene na bifuku mitano (5 millions).

Na bingumba ya Sankuru, Otetela pe minoko misusu ya mboka nde elobamaka lokola monoko ya liboso pe Lingala elobamaka lokola monoko ya mibale. Tokoki koàtanga bato pene na efuku moko (1 million)

Kongo-Mfoa (Kongo-Brazzaville) ezali na bato pene na bifuku minei na ndambo (4,5 millions). Soki olongoli bato ya Mfoa pe ya Pointe Noire, otikali na bato pene na bifuku mibale. Na bituka ya likolo, pene na efuku moko (1 million) ya bato balobaka Lingala lokola monoko na bango ya mibale.

Na bamboka ya kati ya Kongo-Kinshasa, soki ozwi bituka ya mitio (Maï-Ndombe, Equateur, Tshuapa, Nord-Ubangi, Sud Ubangi, Tshiopo, Haut-Uélé, Bas-Uélé, ndambo ya Ituri), basalelaka Lingala lokola monoko na bango ya mibale. bituka wana ezali na bato pene na motuya moko na ndelo ya mwambe na bifuku misato (15 millions).

 

Na boye tokoki koloba ete bato oyo Lingala ezali monoko na bango ya mibale, bazali pene na motuya mibale na ndelo ya mwambe na bifuku libwa (29 millions).

Bato oyo Lingala ezali monoko ya misato balobaka

Na bamboka ya kati ya Kongo-Kinshasa, soki olongoli bituka ya mitio (Maï-Ndombe, Equateur, Tshuapa, Nord-Ubangi, Sud Ubangi, Tshiopo, Haut-Uélé, Bas-Uélé, ndambo ya Ituri), mingi kati na bango, basalelaka Lingala lokola monoko na bango ya misato. Tokoki kotanga bato pene pene na motuya mibale na ndelo ya mwambe na bifuku misato (25 millions).

Posted in Articles scientifiques.

senemongaba

Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *